Eliya azongisaki : — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala.
Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.