Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 5:14 - Mokanda na Bomoi

14 soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 5:14
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo : — Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye.


Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.


Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba !


bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.


Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta.


Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.


Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki.


Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.


Nzokande, tata ya Pibiliusi azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fievele mpe pulupulu ya makila. Polo akendeki kotala ye, akotaki na ndako na ye, asambelaki, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye.


Petelo abimisaki bato nyonso ; bongo afukamaki mpe asambelaki. Wana azalaki kotala epai ebembe ya mama Dorkasi ezalaki, alobaki : — Tabita, telema ! Tabita afungolaki miso ; mpe wana amonaki Petelo, avandaki.


Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ