Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 4:9
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !


Lindanda na ngai etikali kaka mpo na matanga, mpe flite na ngai, mpo na kosunga mingongo ya baleli. »


Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli, pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te.


Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ; kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo.


Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai, mpo ete nayekola mitindo na Yo.


Ezala kati na koseka, motema ekoki kozala na mawa, mpe esengo ekoki kosuka na mawa.


Na tina na koseka, nalobaki : « Ezali na yango kaka bozoba ! » Bongo na tina na elengi, nalobaki : « Esalaka nini ? »


Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.


Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.


Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.


Bazongisaki : — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.


Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama !


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo, pamba te bokotonda ! Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo, pamba te bokoseka !


Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ