Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 4:6
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi.


Kati na pasi na ye, Manase abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki makasi liboso ya Nzambe ya batata na ye.


Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi.


Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka.


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe,


Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › Nzambe akobikisa bango,


Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.


Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.


Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.


Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.


Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.


asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.


Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.


Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke ; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.


Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.


Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ