Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
« Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.
Yawe alobaki na ngai : — Kende, linga mwasi mosusu oyo azali mwasi ya mobali mosusu to mpe azali mwasi ya ekobo. Linga ye ndenge Yawe alingaka bana ya Isalaele, ata soki basambelaka banzambe mosusu mpe baliaka bagato basala na bambuma ya vino ebulisama !
Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.