Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 4:17 - Mokanda na Bomoi

17 Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 4:17
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.


Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu ; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango.


Yesu azongiselaki bango : — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te ; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.


Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango koyeba te nzela ya bosembo, na esika ete, sima na bango koyeba nzela ya bosembo, basundola mibeko ya bule oyo epesamelaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ