14 Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.