soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.
Bongo, nakotombola moto na ngai na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ; nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo, bambeka kati Ndako na Ye ya bule ; nakobanda koyembela Yawe mpe kobetela Ye mindule.
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale ya banyama.
Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.