Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 3:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.


Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.


Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.


Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango, bapengwaka mpe balobaka lokuta wuta na mabumu ya bamama na bango.


Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.


Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.


Soki nyoka eswi moto liboso ete asakanisa yango, litomba ezali lisusu te epai ya moto oyo asakanisaka banyoka.


Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.


Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.


Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.


Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza.


Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ