4 Tala masuwa : atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango.
Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.
Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.
Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo.
Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso ; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso.
Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene !