Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 3:16 - Mokanda na Bomoi

16 Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 3:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.


Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te.


Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;


Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.


kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe.


Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,


pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?


Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.


kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,


Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta.


Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ