12 Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?
Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela. Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki.