Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 3:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 3:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.


Tamari alobaki na ye : — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te.


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino ; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te !


pamba te bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali te kotambolisama kolanda baposa ya nzoto ? Bozali kaka kosala lokola moto nyonso te ?


Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.


Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;


Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi.


Boni, etima moko ekoki kobimisa mayi ya peto mpe mayi ya mbindo ?


Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye.


Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ