Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 2:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 2:5
54 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !


Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.


Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.


Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.


Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.


Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.


Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai !


Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !


Eyano nini tokopesa penza epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona mpo ete babola kati na bato na Ye basili kozwa ebombamelo ya malonga. »


Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.


Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.


Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.


Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.


bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango : — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.


Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye.


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,


Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : « Esengo na bino oyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !


Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ?


Etieni azongisaki : — Batata mpe bandeko, boyoka ngai ! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani.


Mpe soki tozali bana, tozali mpe bakitani ya libula : tozali bakitani ya libula ya Nzambe, mpe bakitani ya libula elongo na Klisto, soki penza tozali komona pasi elongo na Ye mpo ete tozwa mpe nkembo elongo na Ye.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ;


tozalaki koteya, kolendisa mpe kotindika bino na kotambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Nzambe oyo azali kobenga bino ete bokota kati na Bokonzi mpe nkembo na Ye.


Makambo oyo nyonso ezali kolakisa na polele ete Nzambe atalaka makambo na bosembo, mpe ete alingi kozwa bino lokola bato oyo babongi mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo bozali komonela pasi.


Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.


pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;


Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,


ete tokozwa libula oyo abombela biso kati na Likolo, libula oyo ebebaka te, ezwaka bosoto te, mpe ebungisaka kitoko na yango te. Ezali mpe kaka libula yango nde Nzambe abombela bino


Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.


Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.


Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.


Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.


Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ