25 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.
Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,
mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »
Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.
Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba.
Alobaki na bango : — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino.
Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki.