Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 2:20 - Mokanda na Bomoi

20 Oh zoba ya moto ! Boni, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala ezali pamba ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 2:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai mpo ete basundola Ngai ? Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bango moko bakomaki bato pamba.


Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.


Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.


Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.


Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.


Bato mosusu basili kobunga mosika ya makambo yango mpe bamipesi na masolo ezanga tina ;


Bato mingi baboyi kotosa solo, bazali koteya makambo ezanga tina mpe ya lokuta, mingi-mingi kati na bato oyo bakatama ngenga.


Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.


Ezali mpe bongo mpo na kondima : soki kondima ezangi misala, ezali ya kokufa.


Ndenge nzoto oyo ezangi pema ezali ya kokufa, ndenge wana mpe kondima oyo ezangi misala ezali ya kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ