Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ndakisa : soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba ya kolata mpe bilei ya mokolo na mokolo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 2:15
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

soki opesi bilei na yo epai na ye oyo azali na nzala mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, pole na yo ekongenga kati na molili, mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.


Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?


anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ;


Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.


Yoane azongiselaki bango : — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.


Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka lokota ya Greki ; nzokande, bango, bazalaki koluka nzela ya koboma ye.


bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi :


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ