14 Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala ? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye ?
Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
mpe oyo na nzela na yango bosili kobika, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino ; pamba te soki ezali bongo te, wana bondimelaki na bino kaka pamba.
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.
Mpo na kondima, Abrayami akabaki Izaki lokola mbeka tango Nzambe amekaki ye motema ; amilengelaki mpo na kokaba mwana na ye wana kaka moko, atako azalaki na elaka.
Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.
bongo moko kati na bino alobi na ye : « Kende na kimia, yetola moto mpe lia, » kasi apesi ye te eloko oyo azali na yango posa mpo na nzoto na ye, maloba wana ezali na tina nini ?
Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.