Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 2:13
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobanaki bango na bango : — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso ; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.


Boyoka ngai sik’oyo ! Bozongisa bandeko na bino, oyo bokangi lokola bawumbu, pamba te kanda makasi ya Yawe ezali likolo na bino. »


Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.


Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.


Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.


Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te :


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.


Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa !


kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.


Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.


Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ;


Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.


Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ; akweyaki na makolo na ye mpe akufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ