Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. »
Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;
Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.
Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye, Drusiye, oyo azalaki Moyuda ; abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu-Klisto.
Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »
Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe ntoma ya Yesu-Klisto, mpo na kolendisa kondima ya baponami ya Nzambe mpe boyebi ya bosolo oyo ememaka na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima ; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.
Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye : « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola : « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai ; »
Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :