Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 1:17 - Mokanda na Bomoi

17 bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 1:17
62 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.


Tika ete apesa yo bwanya mpe mayele, mpo ete tango okokoma mokonzi ya Isalaele, okoka kobatela mobeko ya Yawe Nzambe na yo !


Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo ; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »


Bango, bakokufa ; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Akelaki biloko minene oyo ebimisaka pole ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Bosolo ebotaka wuta na mabele, mpe bosembo etalaka wuta na likolo.


Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.


Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »


Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.


« Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka.


Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.


Yawe akitaki na nzela ya lipata mpe asololaki na ye ; akamataki nguya ya Molimo, oyo ezalaki epai na Ye, mpe atiaki yango epai ya bakambi tuku sambo. Tango kaka Molimo akitelaki bango, bakomaki kosakola, kasi bakobaki te.


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?


Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !


Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso.


Yoane azongisaki : — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.


Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa, mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Nzambe asali ete ata bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpo bazwa bomoi. »


Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—


Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.


Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,


Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !


Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.


Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.


Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye.


Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ