11 Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.
Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !
Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te ; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka !