Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jake 1:10 - Mokanda na Bomoi

10 mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jake 1:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.


Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.


Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga ;


pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.


Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama, ezali pamba na miso na Yo. Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.


Mongongo moko elobi : « Belela ! » Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga.


Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. Solo, bato bazali lokola matiti :


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !


tika ete ba-oyo bazali kosalela biloko ya mokili bazala lokola nde bazali kosalela yango te ; pamba te mokili oyo, na lolenge na yango ya sik’oyo, ezali koleka !


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ?


Pamba te ekomama : « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezalaka lokola bafololo ya bilanga. Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,


Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ