Jake 1:1 - Mokanda na Bomoi1 Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.
Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.