Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.
Bandeko na ngai, tina nini ezali na moto ya koloba ete azali na kondima, soki azali kolakisa yango te na misala ? Kondima ya boye ekoki solo kobikisa ye ?
Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,
kasi botatolaka yango na boboto, na limemia mpe na mitema peto, mpo ete bato oyo balobaka mabe na tina na etamboli na bino ya malamu kati na Klisto bakufa soni.
Pamba te soki bozali na bizaleli oyo ya malamu kati na bino mpe botondi na yango, ekosala ete bozala basali ya goyigoyi te mpe bokola makasi na boyebi ya Nzambe na biso mpe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.