Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Filemo 1:20 - Mokanda na Bomoi

20 Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana ; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Filemo 1:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balendisaki ngai, ndenge basalaka yango mbala na mbala mpo na bino. Boye, boyebaka kondima bato ya boye.


Pamba te soki nayokisi bino mawa, banani bakosepelisa ngai lisusu soki kaka te bino oyo ngai nayokisi mawa ?


Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo.


Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai.


Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.


Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ