Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Filemo 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Filemo 1:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba.


Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo.


Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.


Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :


Bino nde bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso, mokanda oyo bato nyonso bayebi mpe batangaka.


Pamba te soki bato ya Masedwane bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bozali ya kobongama te, tokoyoka penza soni, mpo ete tozali penza kotiela bino motema ; mpe ekozala soni na biso kaka te, kasi soni na bino mpe lokola.


Ngai Polo, nazali koloba na bino ete soki bokatisi ngenga, Klisto akozala lisusu na tina te epai na bino.


Botala ndenge nakomeli bino na makomi ya minene ! Nasaleli loboko na ngai moko mpo na kokoma yango.


Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !


epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !


Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ