15 Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela,
Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.
tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.
Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › »
Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.