Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.
Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye : — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te.
Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo kati na kondima : Tika ete ngolu, mawa mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Nkolo na biso !
epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !