Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ezayi 7:9 - Mokanda na Bomoi

9 Moto ya Efrayimi ezali Samari, mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, bokolonga te kotelema liboso na bango ! › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ezayi 7:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! »


Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia !


Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. »


« Ata babiliki ekweyi, tokotonga lisusu na mabanga bakata ; ata bakati banzete ya sikomori, tokotia na esika na yango banzete ya sedele. »


Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.


Mpo na nini nyonso wana ? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe ? Boni, ezali Samari te ? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda ? Boni, ezali Yelusalemi te ?


Kasi mokonzi ya basoda nkama moko alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya nkolo masuwa, na esika ete ayoka maloba ya Polo.


Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.


Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.


Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.


Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ