Ezayi 66:2 - Mokanda na Bomoi2 Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Botombola miso na bino mpe botala na likolo : Nani akela biloko nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, moko te kati na yango ezangaka.
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.