Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.
Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.
Pamba te mokolo na mokolo, balukaka Ngai, basalaka lokola bato bazali na esengo ya koyeba nzela na Ngai, lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ; basengaka Ngai mikano ya sembo, mpe basalaka lokola bato bazali na esengo ya kozala pene ya Nzambe ;
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.
Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye : — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.
Bopamela mama na bino, bopamela ye ; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.
« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.