Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ezayi 51:3 - Mokanda na Bomoi

3 Solo, Yawe akobondisa Siona mpe akotala na liso ya ngolu bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; akokomisa esobe na yango lokola Edeni, bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, matondi mpe mongongo ya banzembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ezayi 51:3
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Yawe, talisa biso bolingo na Yo, mpe pesa biso lobiko na Yo !


Na mokolo wana, okoloba : « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, pamba te ata osilikelaki ngai, kanda na Yo elongwaki likolo na ngai mpe obondisaki ngai !


Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »


Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. Mayi ekobima na esobe, mpe bibale, na bisika ya kokawuka.


okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.


Tala, nazali kosala likambo ya sika ! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.


Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›


Oh likolo, ganga na esengo ! Oh mabele, sepela ! Oh bangomba, boyemba banzembo ! Pamba te Yawe abondisi bato na Ye mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.


Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga, bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te ; sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo, mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi bakozala mosika na yo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; nakobatela yo mpe nakotombola yo mpo ete osala boyokani elongo na bato, osala ete mokili etombwama mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;


« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?


Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo mpo na misala oyo nakokela, pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, mpe bato na yango basepela.


Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »


Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.


Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino : bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.


Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’


Liboso na bango, moto ezali kotumba ; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.


Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ