3 Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda, bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino !
Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.
Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino, oyo natikala nanu kosalela yango te ? Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe, tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu ?
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.
Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama : « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »