3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela : « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.
Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
Tala, nazali kosala likambo ya sika ! Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? Nazali kopasola nzela kati na esobe, mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.