Bino bilenge basi ya Siona, bobima ; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.
Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; ezala soki bosambeli mingi, nakoyoka bino te, pamba te maboko na bino etondi na makila.
Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : akobuka mabanga nyonso ya etumbelo mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; mpe likonzi moko te ya Ashera to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.
Na ngambo ya loboko ya mobali, bakobotola bato biloko, kasi bato bakozala kaka na nzala ; na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, kasi bato bakotonda kaka te ; moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye :
Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, pamba te nasala lisusu nini mpo na masumu ya bato na Ngai ?
Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa ; moto oyo akolendisa ye azali te ! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai ! »
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !