Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ezayi 2:4 - Mokanda na Bomoi

4 Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu ; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ezayi 2:4
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akopesa bikolo etumbu : bikolo nyonso ekotonda na bibembe, mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.


Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili, akataka batolotolo, abukaka makonga mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.


Boya kotala misala ya Yawe, makambo minene oyo asalaka kati na mokili.


Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.


liboso ya Yawe, pamba te azali koya ! Solo, azali koya kosambisa mabele ; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.


Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.


Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia, na bandako ya malonga mpe na bisika ya bopemi ya kimia.


Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, Yawe azali Mosali mibeko na biso, Yawe azali Mokonzi na biso ; Ye nde akobikisa biso.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda oyo ekomi pene ya kokufa. Akomema bosembo na solo nyonso,


Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, mwana mobali moko apesameli biso, mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, Tata ya seko, Mokonzi ya kimia.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Na mokolo wana, elobi Yawe, okobenga ngai : « Mobali na ngai ya libala ; » okobenga ngai lisusu te : « Nkolo na ngai. »


Na mokolo wana, nakosala boyokani mpo na bango elongo na banyama ya zamba, bandeke ya likolo, mpe bikelamu oyo etambolaka na libumu. Nakobuka tolotolo mpe mopanga, mpe nakosilisa bitumba : nyonso wana ekosila na mokili mpo ete bato nyonso bavanda na kimia.


Akozala Mosambisi kati na bikolo ebele, akokata makambo ya kowelana kati na mabota ya nguya, ezala oyo ezalaka mosika. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu, bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.


Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.


Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ