Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ezayi 10:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ezayi 10:3
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »


Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi.


nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ? Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai ndenge nini nabandaki kosala ?


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


« Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.


Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › »


Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye ; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !


Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.


Boye, ndenge balobaka na lisese : « Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa, mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto ; »


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.


Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › solo, bokokima nde ! Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !


bango nyonso bakoyoka kaka soni na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te, oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te, kasi bobele soni mpe kotiolama. »


ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala penza na tina moko te ; yango wana, napesi yango kombo « Rahavi.  »


Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »


Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? Ezekiasi azongisaki : — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai.


Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.


Yawe atomboli bendele mpo na bikolo oyo ezali mosika, azali kobeta piololo mpo na kobenga bato oyo bazali na suka ya mokili : tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki !


Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, moto na moto na bibundeli na ye ; bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko mpe bakobwaka yango na moto.


Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.


Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.


Boye, bokosala nini na mikolo ya bafeti oyo ekatama, na mikolo ya bafeti ya Yawe ?


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.


Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola nzube, moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende. Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami, mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu. Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.


Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.


bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.


Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino.


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ