Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ezayi 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ezayi 1:2
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele mpo na kokata makambo ya bato na Ye.


« Mawa na bana ya mito makasi, » elobi Yawe : « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu ;


Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ;


Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !


Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ; bino bato, botia matoyi ! Tika ete mabele, elongo na nyonso oyo ezali kati na yango, mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka !


Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ; atako Abrayami ayebi biso te to Isalaele andimi biso te ; kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso, Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso.


Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai epai ya bato ya mito makasi, oyo balandaka nzela ya mabe, oyo batambolaka kolanda makanisi na bango ;


Boyoka malamu mpe bosala keba ! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.


Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai ! Yoka Liloba na Yawe !


« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.


Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Loba na libota oyo ya batomboki lisese oyo ; yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Kamata nzungu moko ya kolambela, bongisa yango mpe tia mayi kati na yango.


mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe : Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola ;


Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :


Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.


Bino nyonso, bikolo, boyoka ! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka ! Nkolo Yawe azwi bino na likambo ; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule !


Kasi ngai, na nzela ya Molimo na Yawe, natondisami na nguya, na bosembo mpe na mpiko mpo na kobimisa polele mabe ya Jakobi mpe lisumu ya Isalaele.


Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›


Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !


Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »


Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.


Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ