Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:4 - Mokanda na Bomoi

4 Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi : lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.


Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.


Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.


Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi.


Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.


Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.


Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.


Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.


Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.


Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, mpe liloba yango ekomeli Isalaele.


Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.


Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.


Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba.


Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ