Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:29 - Mokanda na Bomoi

29 Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:29
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.


Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.


Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.


Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika


ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari,


Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ