Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:28 - Mokanda na Bomoi

28 Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:28
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango.


Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi.


Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye !


Bikeke nyonso ekotombola kitoko ya misala na Yo mpe ekopanza sango ya misala na Yo ya minene.


Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino.


Bakobomba motole yango kati na Tempelo ya Yawe lokola ekaniseli mpo na kokanisa motema malamu ya Elidayi, ya Tobiya, ya Yedaeya mpe ya Eleme, mwana mobali ya Sofoni.


Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ