Ester 9:20 - Mokanda na Bomoi20 Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.
Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango.