Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.


Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.


Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.


bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba.


Tika ete bato oyo bafundaka ngai bakufa soni mpe balimwa ! Tika ete ba-oyo balukaka pasi na ngai basambwa mpe bayokisama soni !


Lolemo na ngai ekotatola tango nyonso misala ya bosembo na Yo, pamba te bato oyo balukaka pasi na ngai bayokisami soni mpe basambwe.


Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.


Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana !


Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.


Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.


mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ