Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:19
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.


Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika


mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.


Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.


Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.


Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.


Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.


Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.


Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir.


Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.


Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti ! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ