Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:18 - Mokanda na Bomoi

18 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei ; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:18
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.


Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda ; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.


Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size.


Ester azongisaki : — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.


Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.


Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango.


ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ