Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:14 - Mokanda na Bomoi

14 Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesi mitindo ete, kati na bokonzi na ngai, moto nyonso kati na bato ya Isalaele, kati na Banganga-Nzambe mpe Balevi na bango, oyo alingi kokende na Yelusalemi akende elongo na yo.


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi : — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi ! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda ! Mokonzi apesaki mitindo : — Bodiembika ye moko kuna !


Ester azongisaki : — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.


Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.


Bato mabe bakokweyisama mpe bakozala lisusu te, kasi ndako ya bayengebene ekowumela seko.


Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;


Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ