Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ester azongisaki : — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:13
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.


akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.


Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.


Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.


Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ