Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo.
Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei ; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
Kati na emoniseli yango, nazalaki kotala mpe namimonaki lokola kati na Size, engumba batonga makasi, kati na etuka ya Elami ; kati na emoniseli yango kaka, namimonaki lisusu lokola natelemi pembeni ya moluka Ulayi.