Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ester 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda ; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ester 9:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.


Bongo mikanda yango etindamaki na bituka nyonso ya mokonzi, na nzela ya bantoma, mpo na kobebisa, koboma mpe kolimwisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikolo, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari ; mpe kobotola na makasi biloko na bango.


Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari.


Bongo, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, ezalaki mokolo oyo Bayuda bakataki mpo na kokokisa yango kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.


Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai ?


Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.


Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.


Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »


Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki : — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.


Yawe akosambisa bato na Ye, mpe akoyokela basali na Ye mawa ; tango akomona ete makasi na bango esili, mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te oyo bakoki kokanga to kokangola.


Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba ; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ